
Bomoi ya solo sans masque
Mobali
Mpo na muasi(Mama), Bana, mpe libota mobimba, To ko sala yango.
Mama
Mama, Mama !
Mama
Mama azali ya solo ndako oyo eza ko bomba, ko batela mpe ko kengela mobembo ya biso bato awa o nse …
Mama
Mama Mokengeli, Pasi ya moyi na ya butu, losambo ya yambo mpo na bana , mpe Etonga na yé, yé moto a sengaka na nkolo, mpe ko lela na ye nkolo a yokaka..
Mama
Moto wa yambo ko yeba posa ya Bana,(Bato) Nzungu ya Nkisi ya Libota, ya Lisanga.
Mama
Toli ya Mama na bana eza lifungola ya lobi ya bana.
Bo tala Misala mia biso ya motema
Unsere Soziale Engagement
Lokola to yebi na bolamu nioso epayi wapi to telemi lelo, to ko yeba eloko nini ya ko sala.
Ya solo eko wumela, kasi to ko kende na yango na esengo nioso nkino milimo mia biso, nzoto na biso elinga, etosa , eyamba yango ekoma momeseno po emema biso mosika epayi to ko linga.
Biso to ko sala nioso na tina été to koka ko koma esika oyo esengeli to koma, mpo na nkimia, essengo, boyambi , boboto etikala o kati ya biso; ekima biso lisusu te! mpo to zali famille moko.
Es gibt viele Variationen aber Mehrheit wurde in irgendeiner Form verändert,
aber durch Unseren Engagement der soziale Arbeit werden wir glaubwürdig sind.
01
-
Boudin
To yébi biso banso na bolamu été , Nzala na mokili ezali ko tindika biso bato to zala créative mpo na bo sukisi yango na lolenge nioso.
03
-
Mosala ya maboko
Merci mingi! Mpo Toli oyo to zuaki epayi ya ba yebi misala ya maboko, tala lelo oyo to koki ko mema esengo o kati ya lingomba lya biso.
-
Mapa
Ba Mama na buania mpe miso makasi mia bango ba ko leisa biso mpe to ko lala nzala te: Mbonge ya bana bitike.
-
Mpondu /Mbisi/Nguba /Bilamba /Nioso
To ko sungana biso na biso, to koki ko zala monguna ya biso moko te! Bana bitike ba ko sala nioso mpo na botomboli lingoma lya biso.
-
Mbuma
Ananasi Malala Bitabe, Pomme, Kiwi Mango
To ko tambola na nzela oyo ba lakisi nzela ba ko teya biso kino mokolo oyo nkimia eko zua esika mpe miso ma ko mono na polele nioso
Mabele
Manso ma ko bima na nzela eye eko tombola lisanga lia biso; Ba lakisi nzela ba sila ko yébisa biso.
Ebale
Manso ma ko bima na nzela eye eko tombola lisanga lia biso; Ba lakisi nzela ba sila ko yébisa biso.
Zamba
Manso ma ko bima na nzela eye eko tombola lisanga lia biso ba lakisi nzela ba sila ko yebisa biso